Une minute - Fally Ipupa

Une minute - Fally Ipupa

Альбом
ARSENAL DE BELLES MELODIES
Год
2009
Язык
`鎌`
Длительность
444890

以下は曲の歌詞です Une minute 、アーティスト - Fally Ipupa 翻訳付き

歌詞 " Une minute "

原文と翻訳

Une minute

Fally Ipupa

Une minute, une pour la route

Coco Claudia Sassou, yaya na Denis-Christel Sassou Nguesso le pétrolier

Ma Vivi Emeraude

Kitoko ezali elamba oyo nzambe alatisaka moto nyonso te

Kasi ezali kitalatala moto nyonso akoki kotala

Kitoko ezali elamba oyo nzambe alatisaka moto nyonso te

Kasi ezali kitalatala moto nyonso akoki kotala

Napekisi bino botala Claudia te

Kasi nga nasengi esuka se na regard

Ya ko pesa ye ba rendez-vous wana bokoboma nga

Coco Claudia aza ya ngaï-mei

Maman nani ango alobaka kitoko eza mabele

Est-ce qu’eza te po amona te Claudia Sassou (aya bangu, aya kotala Koko Claudia

Sassou)

Moko ya couleur oyo arc-en-ciel alukaka

Po azuwa pe nguya ya kokanga ekanga moyi kobima

Ndenge akanga mvula konoko (eza nde Claudia)

Ye aza na etamboli ya balon ezana mopepe

Nzoto n’e sembe-sembe, moto-moto pe moselu

Pays-bas on dirait cowboy alati ba revolvers

Soki apesi nga vue de dos wana nga na bavaka (elle est sucrée Claudia)

Esika nzambe azuwa mabele ya kosala ye

Eza esika oyo apekisa ba anjelu banyata

Ba anjelu ba ngolomaka esika’ango na mabolongo

Ye moko nzambe atambolaka esika’ango makolo ngulu

Koko Claudia Sassou

Yo oza réponse exacte ya beauté

Soki bolingo nayo ezalaki prison, nakoboya nanga liberte

Ata kolinga yo ezali ngambo

Nga nandimi ngambo

Lokola Adam andima ngambo po alingaki Eva

Dédicace

Sikoyo jolibitationismementationnellementationnellement ebandi

Kokende te Claudia po oza moko ya mikuwa ya mipanzi nangayi

P’oza elengi kofiba koleka mokuwa ya makoso

Komona yo eza lokola namoni paradis na miroir

Ata nzambe alobi azongisa nga bébé na maboko ya maman (te, nakoboya)

Kokende te Claudia po oza moko ya mikuwa ya mipanzi nangayi

P’oza elengi kofiba koleka mokuwa ya makoso

Komona yo eza lokola nadiongoli paradis na miroir

Ata nzambe alobi azongisa nga bébé na maboko ya maman

Te, nakoboya

Po kuna papa na maman balalisaka nga (na berceau)

Tango age epusani babimisaki nga (na chambre)

Kasi nga na yo Claudia mbeto moko, soki pe malili (toko finika couette moko

Claudia Sassou)

Ah mokuwa na nga mosuni nanga mon cœur, mon bras, ma jambe (eza yo Claudia)

Chérie Claudia na nga

Chérie façon yo osalaka oyo ya yo synopsis

Soki ngonga ya kokata sentiment na nga ekoki

Claudia pardon nakoseng’o bakisa (une minute)

Ndenge bapesaka condamné à mort (une minute)

Avant ya ko exécuter ye

Chérie pardon nakoseng’o juste kaka (une minute)

Ndenge moto azangi unités asengaka (une minute)

Ata eza moko kasi na bolingo eza ebele

Nakoki ko lobel’o ata je t’aime na (une minute)

Nakoki kopesa yo ata pe bipwepwe zuana (une minute)

Nakoki kosala’o ata bisala sala na (une minute)

Po après naloba bébé je veux encore une pour la route avant qu’on ne se sépare

Papa Denguess aza (ya Ngouli), Ngouli aza (ya papa Denguess)

Kasi Claudia yo oza ya nani

Kitoko ya basusu suka (quelque part)

Kasi ya maman n’Alisson na Laurette (na rez-de-chassée, koko Claudia Sassou)

Dédicace

Ah nga naleli (une minute)

Benga nga cherie (une minute)

Nafongoli tshombo (une minute)

Nazo zela appel’a Claudia (une minute)

Patsho panda honorable, (une minute) Honorable Serge Kayembe (une minute)

Na sengi ya pamba (une minute)

Dédicace

Yoka vieux na nga Rigo Star na lindanda

Dédicace

200万曲以上の歌詞

様々な言語の楽曲

翻訳

あらゆる言語への高品質な翻訳

クイック検索

必要なテキストを数秒で見つけます